Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 15:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 “Nayoki mawa+ mpenza ndenge nakómisaki Saulo mokonzi, mpamba te apesi+ ngai mokɔngɔ mpe atiki kolanda ngai, mpe akokisi maloba na ngai te.”+ Mpe likambo yango etungisaki Samwele,+ mpe alelelaki Yehova butu mobimba.+

  • Yisaya 1:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mawa na ekólo ya masumu,+ bato oyo libunga na bango ekómi kilo, momboto oyo ezali kosala mabe,+ bana oyo babebisaka makambo!+ Batiki Yehova,+ bazangi limemya epai ya Mosantu ya Yisraele,+ bapesi ye mokɔngɔ.+

  • Yisaya 9:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Yango wana Yehova akosepela ata na bilenge mibali na bango te,+ mpe akoyoka mawa te mpo na bana na bango oyo batata bakufá mpe basi na bango oyo mibali bakufá; mpo bango nyonso bazali bapɛngwi+ mpe basali-mabe mpe monɔkɔ nyonso ezali koloba makambo ya bozoba. Mpo na makambo oyo nyonso, nkanda na ye ezongi nsima te, kasi lobɔkɔ na ye esembolami kaka.+

  • Yirimia 2:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 ‘mpo bato na ngai basali makambo mibale ya mabe: Batiki kutu ngai,+ liziba ya mai ya bomoi,+ mpo bámitimwela mabulu, mabulu oyo ebukaná, oyo ekoki kobomba mai te.’

  • Baebre 3:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Bandeko, bókeba noki moko na bino akóma na motema mabe oyo ezangi kondima mpo atiki Nzambe ya bomoi;+

  • Baebre 10:38
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 38 “Kasi moyengebene na ngai akozala na bomoi mpo na kondima,”+ mpe, “soki azongi nsima, molimo na ngai ekosepela na ye te.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto