Yoele 2:31 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 31 Moi ekobongwana molili,+ mpe sanza ekobongwana makila,+ liboso ya koya ya mokolo monene mpe ya nsɔmɔ ya Yehova.+ Misala 2:20 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 20 moi+ ekobongwana molili mpe sanza ekobongwana makila liboso ete mokolo monene mpe ya nkembo ya Yehova eya.+ 2 Petro 3:10 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 10 Nzokande mokolo ya Yehova+ ekoya lokola moyibi+ mpe na mokolo yango likoló ekoleka+ na lokito makasi,+ kasi biloko na yango lokola ekokóma mɔtɔ makasi ekosilela,+ mpe mabele+ mpe misala oyo ezali wana ekomonana polele.+
31 Moi ekobongwana molili,+ mpe sanza ekobongwana makila,+ liboso ya koya ya mokolo monene mpe ya nsɔmɔ ya Yehova.+
20 moi+ ekobongwana molili mpe sanza ekobongwana makila liboso ete mokolo monene mpe ya nkembo ya Yehova eya.+
10 Nzokande mokolo ya Yehova+ ekoya lokola moyibi+ mpe na mokolo yango likoló ekoleka+ na lokito makasi,+ kasi biloko na yango lokola ekokóma mɔtɔ makasi ekosilela,+ mpe mabele+ mpe misala oyo ezali wana ekomonana polele.+