Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Danyele 9:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 “Mpe akobatela mpenza kondimana+ ezala naino mpo na bato ebele na boumeli ya pɔsɔ moko;+ mpe na katikati ya pɔsɔ yango akosukisa mbeka mpe likabo.+

      “Mpe moto oyo ayeisaka libebi akoya likoló ya lipapu ya biloko ya bosɔtɔ;+ mpe eloko oyo ekanami ekosopama likoló ya oyo ebebisamá tii na ntango ya kosilisa nyɛɛ.”+

  • Danyele 11:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Mpe mabɔkɔ euti epai na ye ekotɛlɛma; mpe ya solo bakokómisa esika mosantu eloko mpamba,+ ndako makasi, mpe bakolongola mbeka ya ntango nyonso.+

      “Mpe bakotya mpenza eloko ya bosɔtɔ+ oyo ezali koyeisa libebi.+

  • Danyele 12:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 “Mpe banda ntango oyo mbeka ya ntango nyonso+ ekolongolama+ mpe ntango oyo eloko ya bosɔtɔ+ oyo eyeisaka libebi ekotyama, ekozala mikolo nkóto moko na nkama mibale na ntuku libwa (1 290).

  • Marko 13:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 “Nzokande, ntango bokomona eloko ya bosɔtɔ+ oyo ebebisaka+ etɛlɛmi na esika oyo yango esengeli kotɛlɛma te (tiká motángi asosola),+ na ntango yango, baoyo bazali na Yudea bábanda kokima na bangomba.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto