Masese 9:7 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 7 Ye oyo azali kosembola mosɛki azali komiyokisa nsɔni,+ mpe ye oyo azali kopesa moto ya mabe mpamela—mbeba ezali na ye.+ Masese 15:12 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 12 Mosɛki alingaka moto oyo azali kopamela ye te.+ Akokende epai ya bato ya bwanya te.+ Matai 10:14 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 14 Epai nyonso oyo moto akoyamba bino te to akoyoka maloba na bino te, ntango bokobima na ndako yango to na engumba yango bópupola putulu ya makolo na bino.+
7 Ye oyo azali kosembola mosɛki azali komiyokisa nsɔni,+ mpe ye oyo azali kopesa moto ya mabe mpamela—mbeba ezali na ye.+
14 Epai nyonso oyo moto akoyamba bino te to akoyoka maloba na bino te, ntango bokobima na ndako yango to na engumba yango bópupola putulu ya makolo na bino.+