21 “Mikolo motoba okosala mosala, kasi na mokolo ya nsambo okotosa sabata.+ Na ntango ya kobalola mabele mpe na ntango ya kobuka mbuma okotosa sabata.+
4 Kasi na mbula ya nsambo, ekozala sabata oyo mokili ekopema mpenza kopema,+ sabata moko mpo na Yehova. Osengeli kolona mboto te na elanga na yo, mpe osengeli te kokata bitape ya nzete ya vinyo ya elanga na yo.
10 Mpe bosengeli kosantisa mbula ya ntuku mitano (50) mpe kosakola bonsomi na mokili epai ya bato na yango nyonso.+ Ekokóma Yubile+ mpo na bino, mpe bosengeli kozonga moto na moto na mabele na ye mpe bokozonga moto na moto na libota na ye.+