Balevi 19:17 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 17 “‘Osengeli te koyina ndeko na yo na motema na yo.+ Okopamela mpenza moninga na yo,+ mpo omema lisumu elongo na ye te. Masese 25:9 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 9 Sambá likambo na yo na moninga na yo,+ mpe kobimisa te lisolo ya nkuku ya moto mosusu;+ Luka 17:3 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 3 Bókeba. Soki ndeko na yo asali lisumu pamelá ye,+ mpe soki abongoli motema limbisá ye.+
17 “‘Osengeli te koyina ndeko na yo na motema na yo.+ Okopamela mpenza moninga na yo,+ mpo omema lisumu elongo na ye te.