32 Na ndakisa, moto nyonso oyo alobi liloba ya kotɛmɛla Mwana ya moto, bakolimbisa ye;+ kasi moto nyonso oyo alobi mpo na kotɛmɛla elimo santu, bakolimbisa ye te, ɛɛ, ezala na ntango oyo to na oyo ezali koya.+
6 kasi batiki yango,+ bakoki lisusu te kozongisama mpo bábongola motema,+ mpo bazali bango moko kobaka lisusu Mwana ya Nzambe na nzete mpe koyokisa ye nsɔni na miso ya bato.+
16 Soki moto amoni ndeko na ye azali kosala lisumu moko oyo ememaka na liwa te,+ akosɛnga, mpe akopesa ye bomoi,+ ɛɛ, na baoyo bazali kosala lisumu na ndenge oyo ezali komema na liwa te.+ Ezali na lisumu oyo ememaka na liwa. Ezali mpo na lisumu wana nde nazali te koyebisa ye ete asɛnga.+