64 Yesu alobaki+ na ye ete: “Yo moko olobi yango.+ Nzokande nazali koloba na bino: Banda sikoyo+ bokomona Mwana ya moto+ afandi na lobɔkɔ ya mobali+ ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso* mpe azali koya na mapata ya likoló.”+
14 Mpe namonaki, mpe talá! lipata moko ya mpɛmbɛ, mpe moto moko oyo azali lokola mwana ya moto+ afandi na lipata yango, azali na motole ya wolo+ na motó na ye mpe likwangola moko oyo epeli makasi na lobɔkɔ na ye.