3 Bóloba na liyangani mobimba ya Yisraele ete: ‘Na mokolo ya zomi ya sanza oyo, bakozwa moto na moto mpo na ndako ya bankɔkɔ na ye mpate moko,+ mpate moko mpo na ndako moko.
13Nzokande, lokola ayebaki liboso ya fɛti ya elekeli ete ngonga na ye esilaki kokoka+ mpo alongwa na mokili oyo akende epai ya Tata,+ Yesu, lokola alingaki bato na ye oyo bazalaki na mokili,+ alingaki bango tii na nsuka.
7 Bólongola levire ya kala, mpo bózala pɔtɔpɔtɔ ya sika ya farini,+ lokola nkisi ya kovimbisa ezali te na kati na bino. Mpo, ya solo, Kristo+ elekeli+ na biso apesami mbeka.+