Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 12:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 “‘Mpe mokolo oyo esengeli kozala ekaniseli mpo na bino, mpe bosengeli kokanisa yango lokola fɛti moko mpo na Yehova na boumeli ya mabota na bino nyonso. Bosengeli kokanisa yango lokola mobeko mpo na ntango oyo etyami ndelo te.

  • Kobima 12:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Na sanza ya liboso, na mokolo ya zomi na minei ya sanza yango, na mpokwa bokolya bagato ezangá levire tii na mokolo ya ntuku mibale na moko (21) ya sanza yango na mpokwa.+

  • Balevi 23:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 “‘Mpe na mokolo ya zomi na mitano ya sanza yango, ezali fɛti ya bagato ezangi levire mpo na Yehova.+ Bokolya bagato ezangi levire mikolo nsambo.+

  • Kolimbola Mibeko 16:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe osengeli kopesa Yehova Nzambe na yo mbeka ya elekeli,+ oyo euti na etonga ya bampate mpe na etonga ya bangɔmbɛ,+ na esika oyo Yehova akopona mpo na kofandisa nkombo na ye kuna.+

  • Matai 26:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Na mokolo ya liboso ya bagato oyo ezangi levire,+ bayekoli bayaki epai na Yesu, balobi: “Epai wapi olingi tóbongisela yo esika ya kolya elekeli?”+

  • Marko 14:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Nzokande na mokolo ya liboso ya bagato ezangi levire,+ ntango bapesaka mbeka ya elekeli na ndenge ya momeseno, bayekoli na ye+ balobaki na ye ete: “Epai wapi olingi tókende kobongisela yo esika ya kolya elekeli?”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto