Matai
14 Na ntango wana mpenza Erode, moyangeli ya etúká, ayokaki nsango ya Yesu+ 2 mpe alobaki na basaleli na ye ete: “Oyo ezali Yoane Mobatisi. Akufaki alamuki, mpe yango wana azali kosala misala ya nguya.”+ 3 Mpo Erode akangaki Yoane, atyaki ye minyɔlɔlɔ mpe abwakaki ye na bolɔkɔ mpo na Erodiadi mwasi ya Filipe ndeko na ye.+ 4 Mpo Yoane azalaki koloba na ye ete: “Okoki kozwa mwasi oyo te.”+ 5 Nzokande, atako alingaki koboma ye, abangaki bato, mpamba te bazalaki kozwa ye mosakoli.+ 6 Kasi ntango bazalaki kosepela mokolo ya mbotama+ ya Erode, mwana mwasi ya Erodiadi abinaki na mokolo yango mpe asepelisaki Erode mingi 7 bongo alakaki mpe alapaki ndai ete akopesa ye eloko nyonso oyo akosɛnga.+ 8 Bongo ye alobaki ndenge mama na ye atindaki ye ete: “Pesá ngai motó ya Yoane Mobatisi na saani, awa.”+ 9 Atako mokonzi ayokaki mawa, atindaki bápesa ye yango mpo na ndai oyo alapaki mpe mpo na bato oyo bafandaki elongo na ye na mesa;+ 10 mpe atindaki bákata Yoane motó na bolɔkɔ. 11 Mpe bamemaki motó na ye na saani mpe bapesaki yango elenge mwasi, mpe ye amemelaki yango mama na ye.+ 12 Na nsuka bayekoli na ye bayaki mpe balongolaki ebembe yango mpe bakundaki ye+ mpe bayaki kopesa Yesu nsango. 13 Ntango Yesu ayokaki bongo, alongwaki wana na masuwa akei na esika oyo bato bazalaki te mpo azala ye moko;+ kasi ntango ebele ya bato wana bayokaki yango, bautaki na bingumba na makolo balandi ye.
14 Nzokande ntango abimaki amonaki ebele mpenza ya bato; mpe ayokelaki bango mawa,+ mpe abikisaki bato na bango ya maladi.+ 15 Kasi ntango mpokwa ekómaki bayekoli na ye bayaki epai na ye mpe balobaki ete: “Esika oyo ezali esika bato bazalaka te mpe ngonga esili kopusana mosika; tiká ebele ya bato oyo bázonga, mpo bákende na bamboka mike mpe básomba biloko ya kolya.”+ 16 Nzokande, Yesu alobaki na bango ete: “Bakokende te: Bino bópesa bango eloko ya kolya.”+ 17 Balobaki na ye ete: “Tozali na eloko te kaka mampa mitano ná mbisi mibale.”+ 18 Ye alobaki ete: “Bóyela ngai yango awa.” 19 Na nsima asɛngaki na ebele ya bato yango báfanda na matiti mpe akamataki mampa yango mitano ná mbisi yango mibale, mpe atalaki likoló, abondelaki+ mpe, nsima ya kobuka mampa yango, akabolelaki yango bayekoli, bayekoli mpe bakabolelaki ebele ya bato yango.+ 20 Bongo bango nyonso balyaki mpe batondaki, mpe balɔkɔtaki biteni oyo etikalaki kitunga zomi na mibale mɛkɛ.+ 21 Nzokande baoyo balyaki bazalaki mibali nkóto mitano (5 000), longola basi ná bana mike.+ 22 Bongo kozanga koumela, asɛngisaki na bayekoli na ye bámata na masuwa bákatisa na ngámbo mosusu liboso na ye, wana ye azalaki kotika ebele ya bato yango bázonga.+
23 Na nsuka, ntango atikaki ebele ya bato wana bázonga, amataki na ngomba kaka ye moko kobondela.+ Atako ngonga epusanaki mingi, azalaki kuna kaka ye moko. 24 Masuwa esilaki sikoyo kotangwa mosika na mokili na ntaka ya bankama mingi ya bamɛtrɛ, mbonge ezalaki kobɛta yango,+ mpo mopɛpɛ ezalaki kozongisa bango nsima. 25 Kasi na eleko ya minei ya kokɛngɛla na butu* ayaki epai na bango, azali kotambola likoló ya mbu.+ 26 Ntango bayekoli bamonaki ye azali kotambola likoló ya mbu, babulunganaki, balobi: “Ezali emonamona!”+ Mpe mpo na kobanga na bango, bagangaki. 27 Kasi na mbala moko Yesu alobaki na bango maloba oyo: “Bózala na mpiko, ezali ngai;+ bóbanga te.” 28 Petro azongiselaki ye ete: “Nkolo, soki ezali yo, lobá na ngai naya epai na yo likoló ya mai.” 29 Ye alobaki ete: “Yaká!” Bongo Petro akitaki na masuwa+ atamboli likoló ya mai mpe akendaki epai Yesu azali. 30 Kasi ntango amonaki mopɛpɛ makasi, abangaki mpe, lokola abandaki kozinda, agangaki: “Nkolo, bikisá ngai!” 31 Na mbala moko Yesu asembolaki lobɔkɔ, asimbaki ye mpe alobaki na ye ete: “Yo moto ya kondima moke, mpo na nini obandaki kotya ntembe?”+ 32 Mpe nsima ya komata na bango na masuwa, mopɛpɛ makasi yango ekitaki. 33 Bongo baoyo bazalaki na kati ya masuwa bagumbamelaki ye mpe balobaki ete: “Ozali mpenza Mwana ya Nzambe.”+ 34 Mpe bakatisaki mpe bakómaki na mokili na kati ya Genezarete.+
35 Ntango bayebaki ete ezali ye mibali ya esika wana batindaki nsango na bisika nyonso ya zingazinga, mpe bamemelaki ye baoyo nyonso bazalaki kobɛla.+ 36 Mpe bazalaki kobondela ye atika bango básimba ata nsɔngɛ ya elamba na ye ya likoló;+ mpe baoyo nyonso basimbaki yango babikaki.