Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 22:32
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 32 Mpe bosengeli te kotuka nkombo na ngai mosantu,+ mpe nasengeli kosantisama na kati ya bana ya Yisraele.+ Ngai Yehova moto nazali kosantisa bino,+

  • Kolimbola Mibeko 32:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  3 Mpo nakosakola nkombo ya Yehova.+

      Bókumisa bonene ya Nzambe na biso!+

  • Nzembo 145:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Monɔkɔ na ngai ekoloba lisanzoli ya Yehova;+

      Mpe mosuni nyonso epambola nkombo na ye mosantu mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ mpo na seko.+

  • Yisaya 5:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mpe Yehova ya mampinga akotombwama na nzela ya lisambisi,+ mpe Nzambe ya solo, Mosantu,+ akomisantisa mpenza na nzela ya boyengebene.+

  • Yisaya 8:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Yehova ya mampinga—ye nde Moto bosengeli kotalela ete azali mosantu,+ mpe ye nde bosengeli kobanga,+ mpe ye nde Moto asengeli kolɛngisa bino.”+

  • Yisaya 29:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 mpo ntango akomona bana na ye, mosala ya mabɔkɔ na ngai, na katikati na ye,+ bakosantisa nkombo na ngai,+ mpe bakosantisa mpenza Mosantu ya Yakobo,+ mpe bakotala Nzambe ya Yisraele na nsɔmɔ.+

  • Ezekiele 36:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 ‘Mpe ya solo, nakosantisa nkombo na ngai monene,+ oyo bazalaki kokómisa eloko mpamba na kati ya bikólo, oyo bokómisaki eloko mpamba na katikati na yango; mpe bikólo ekoyeba mpenza ete nazali Yehova,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, ‘ntango nakosantisama na kati na bino na miso na bango.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto