Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 17:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Na yango, Nzambe alobaki ete: “Sara, mwasi na yo, azali mpenza kobotela yo mwana mobali, mpe osengeli kopesa ye nkombo Yisaka.+ Mpe nakosala kondimana na ngai elongo na ye mpo ezala kondimana moko ya ntango oyo etyami ndelo te mpo na momboto na ye, oyo ekoya nsima na ye.+

  • Mika 7:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Okomonisa bosolo ya makambo epai na Yakobo, motema boboto epai na Abrahama, oyo olapelaki bankɔkɔ na biso ndai uta mikolo ya kalakala.+

  • Bagalatia 3:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Nzokande bilaka yango, bayebisaki yango Abrahama+ mpe momboto na ye.+ Elobi te ete: “Mpe epai ya mboto,” lokola nde ezalaki mingi, kasi nde epai ya moko kaka+ ete: “Mpe epai ya momboto na yo,”+ oyo ezali Kristo.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto