Kolimbola Mibeko 25:2 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 2 Mpe ekosalema mpenza boye: soki moto mabe abongi kobɛtama,+ mosambisi asengeli kosɛnga ete bálalisa ye na nse mpe bábɛta ye fimbo+ liboso na ye na motángo oyo ekokani na likambo ya mabe oyo asali. Yoane 9:41 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 41 Yesu alobaki na bango ete: “Soki bozalaki bato bakufá miso, mbɛlɛ bozali na lisumu te. Kasi sikoyo bozali koloba ete: ‘Tomonaka.’+ Lisumu+ na bino ezali kaka.” Yakobo 1:22 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 22 Nzokande, bókóma batosi ya liloba,+ kasi bayoki kaka te, noki bómikosa na makanisi ya lokuta.+ Yakobo 4:17 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 17 Yango wana, soki moto ayebi kosala oyo ezali malamu kasi azali kosala yango te,+ ezali lisumu.+
2 Mpe ekosalema mpenza boye: soki moto mabe abongi kobɛtama,+ mosambisi asengeli kosɛnga ete bálalisa ye na nse mpe bábɛta ye fimbo+ liboso na ye na motángo oyo ekokani na likambo ya mabe oyo asali.
41 Yesu alobaki na bango ete: “Soki bozalaki bato bakufá miso, mbɛlɛ bozali na lisumu te. Kasi sikoyo bozali koloba ete: ‘Tomonaka.’+ Lisumu+ na bino ezali kaka.”