14 Mpe momboto na yo ekokóma mpenza lokola zɛlo ya mokili,+ mpe okopalangana epai na epai na wɛsti mpe na ɛsti mpe na nɔrdi mpe na sudi,+ mpe na nzela na yo mpe na nzela ya momboto na yo, mabota nyonso ya mabele ekomizwela lipamboli.+
19 Mpe banda na epai moi elalaka bakobanda kobanga nkombo ya Yehova,+ mpe nkembo na ye banda na epai moi ebimaka,+ mpo akoya lokola ebale oyo ezali kopesa mitungisi, oyo elimo ya Yehova etindi.+