Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 26:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Mpe nakopesa mpenza bingumba na bino na mopanga+ mpe nakotika bisika mosantu na bino mpamba,+ mpe nakoyoka te nsolo ya bambeka na bino ya kokitisa motema.+

  • 1 Bakonzi 9:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 ngai mpe nakolongola Yisraele na mokili oyo napesá bango;+ mpe ndako oyo nasantisi mpo na nkombo na ngai, nakolongola yango liboso na ngai+ mpe nakobwaka yango, mpe Yisraele ekokóma mpenza liloba ya lisese+ mpe liloba ya kosɛka na kati ya bato nyonso ya bikólo.

  • Nzembo 69:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Kaa na bango oyo ezingami na efelo etikala mpamba;+

      Moto afanda na bahema na bango te.+

  • Yisaya 1:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mokili na bino etikali mpamba,+ bingumba na bino etumbami na mɔtɔ;+ bapaya+ bazali kolya mbuma ya mabele na bino+ na miso na bino, mpe libebi yango ezali ndenge bapaya babebisaka.+

  • Yirimia 12:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 “Natiki ndako na ngai;+ nasundoli libula na ngai;+ nakabi molingami ya molimo na ngai na lobɔkɔ ya banguna na ye.+

  • Yirimia 22:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 “‘Kasi soki botosi maloba oyo te, nazali kolapa ndai na nkombo na ngai moko,’+ yango nde liloba ya Yehova, ‘ete ndako oyo ekokóma mpenza esika oyo ebebisami.’+

  • Mika 3:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Yango wana mpo na bino, Siona ekobalolama lokola elanga, mpe Yerusaleme ekokóma mabondo ya bitiká,+ mpe ngomba ya ndako ekozala lokola bisika oyo etombwaná ya zamba.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto