27 “Nzokande, akotinda bámema libándá ya kaa ngɔmbɛ-mobali ya likabo mpo na lisumu mpe ntaba-mobali ya likabo mpo na lisumu, oyo makila na yango ememamaki mpo na kozipa masumu na esika mosantu; mpe basengeli kozikisa mposo na yango ná mosuni na yango mpe nyɛi na yango na mɔtɔ.+