23 Bongo alobaki na bango lisusu ete: “Bino bozali bato ya nse; ngai nazali moto ya likoló.+ Bino bozali bato ya mokili oyo;+ ngai nazali moto ya mokili oyo te.+
42 Yesu alobaki na bango ete: “Soki Nzambe azalaka Tata na bino, mbɛlɛ bolingi ngai,+ mpo uta na Nzambe nde ngai nabimi mpe nazali awa.+ Nayaki mpe na ndenge na ngai moko te, kasi Moto wana nde atindaki ngai.+