Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 4:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Mpe kuna bokosalela mpenza banzambe,+ biloko oyo esalemi na mabɔkɔ ya moto, mabaya ná mabanga,+ oyo emonaka te, eyokaka te, elyaka te mpe eyokaka nsolo te.+

  • 1 Ntango 16:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Mpo banzambe nyonso ya bato ya bikólo bazali banzambe ya mpambampamba.+

      Kasi Yehova asalá likoló.+

  • Yisaya 44:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Nani asalá nzambe moko boye to anyangolá ekeko ya mpamba?+ Epesá ata litomba moko te.+

  • Yirimia 10:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mimeseno ya bikólo+ ezali kaka mopɛpɛ, mpo ezali kaka nzete+ ya mpamba oyo moto akati na zamba, eloko esalemi na mabɔkɔ ya moto oyo ayebi malamu misala ya mabɔkɔ na likwangola ya mokuse.+

  • Misala 17:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 “Na yango, lokola tozali libota ya Nzambe,+ tosengeli kokanisa te ete Nzambe+ azali lokola wolo to palata to libanga, lokola eloko moko oyo eyemami na mayele mpe na makanisi ya moto.+

  • 1 Bakorinti 8:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Sikoyo, mpo na likambo oyo etali kolya+ bilei oyo epesami na bikeko, toyebi ete ekeko ezali eloko te+ na mokili, mpe ete Nzambe azali kaka moko.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto