Matai 5:11 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 11 “Esengo na bino ntango bazali kolobela bino mabe+ mpe konyokola+ bino mpe kokosela bino makambo ya ndenge nyonso mpo na ngai. Luka 23:2 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 2 Bongo babandaki kofunda ye+ mpe koloba ete: “Tokuti moto oyo azali kokɔtisa mobulu+ na ekólo na biso mpe azali kopekisa kofuta Kaisala mpako+ mpe koloba ete ye nde Kristo mokonzi.”+ Misala 24:5 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 5 Mpo tomoni mobali oyo ete azali likama monene+ mpe azali kobimisa botomboki+ epai ya Bayuda nyonso na mabele mobimba oyo bato bafandi mpe azali mokambi ya mwa lingomba ya Banazarete,+
11 “Esengo na bino ntango bazali kolobela bino mabe+ mpe konyokola+ bino mpe kokosela bino makambo ya ndenge nyonso mpo na ngai.
2 Bongo babandaki kofunda ye+ mpe koloba ete: “Tokuti moto oyo azali kokɔtisa mobulu+ na ekólo na biso mpe azali kopekisa kofuta Kaisala mpako+ mpe koloba ete ye nde Kristo mokonzi.”+
5 Mpo tomoni mobali oyo ete azali likama monene+ mpe azali kobimisa botomboki+ epai ya Bayuda nyonso na mabele mobimba oyo bato bafandi mpe azali mokambi ya mwa lingomba ya Banazarete,+