6 Nzokande ntango Paulo amonaki ete ndambo mosusu bazali Basadukai+ mpe mosusu Bafarisai, abandaki koganga na kati ya Sanedrina ete: “Mibali, bandeko, nazali Mofarisai,+ mwana ya Bafarisai. Nazali kosambisama+ mpo na elikya ya lisekwa+ ya bakufi.”
5 nakatamaki ngenga na mokolo ya mwambe,+ moto ya ekólo ya Yisraele, ya libota ya Benyamina,+ Moebre mwana ya Baebre;+ na makambo ya mibeko, Mofarisai;+