14 Kasi nandimi mpenza likambo oyo liboso na yo, ete, na kotalela nzela oyo bazali kobenga ‘mwa lingomba,’ na ndenge wana nde ngai nazali kosalela Nzambe ya bankɔkɔ na ngai mosala mosantu,+ mpo nandimaka makambo nyonso oyo elobelami na Mibeko+ mpe ekomami na Basakoli;