Luka 3:6 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 6 mpe bato nyonso bakomona mwango ya kobikisa ya Nzambe.’”+ Misala 13:46 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 46 Mpe na yango, Paulo ná Barnabasi bazalaki koloba na mpiko, balobi: “Esengelaki liloba ya Nzambe esakolama liboso epai na bino.+ Lokola bozali kobwaka yango+ mpe bozali komona ete bobongi te na bomoi ya seko, talá! tobaluki epai ya bikólo.+ Misala 22:21 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 21 Atako bongo alobaki na ngai ete: ‘Kende, mpo nakotinda yo na bikólo ya mosika.’”+ Baroma 11:11 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 11 Yango wana, nazali kotuna: Babɛtaki nde libaku mpe bakweaki+ mpenza kokwea? Te, ata moke te! Kasi na libaku oyo babɛtaki,+ lobiko eyeli bato ya bikólo.+ Bongo likambo yango eyokisa bango zuwa.+
46 Mpe na yango, Paulo ná Barnabasi bazalaki koloba na mpiko, balobi: “Esengelaki liloba ya Nzambe esakolama liboso epai na bino.+ Lokola bozali kobwaka yango+ mpe bozali komona ete bobongi te na bomoi ya seko, talá! tobaluki epai ya bikólo.+
11 Yango wana, nazali kotuna: Babɛtaki nde libaku mpe bakweaki+ mpenza kokwea? Te, ata moke te! Kasi na libaku oyo babɛtaki,+ lobiko eyeli bato ya bikólo.+ Bongo likambo yango eyokisa bango zuwa.+