Kolimbola Mibeko 34:9 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 9 Mpe Yosua mwana ya Nunu atondaki na elimo ya bwanya,+ mpo Moize atyelaki ye lobɔkɔ;+ mpe bana ya Yisraele babandaki koyokela ye mpe bazalaki kosala kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.+ Misala 8:17 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 17 Bongo batyelaki bango mabɔkɔ,+ mpe babandaki kozwa elimo santu. Misala 13:3 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 3 Bongo bakilaki bilei mpe babondelaki mpe batyelaki bango mabɔkɔ+ mpe batikaki bango bákende. Misala 14:23 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 23 Lisusu, batyelaki bango bankulutu+ na lisangá moko na moko mpe, babondelaki mpe bakilaki bilei,+ bapesaki bango na mabɔkɔ ya Yehova+ oyo bango bandimelaki. 1 Timote 4:14 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 14 Komona mpamba te likabo+ oyo ezali epai na yo, oyo bapesaki yo na nzela ya esakweli+ mpe ntango lisangani ya bankulutu etyelaki yo mabɔkɔ.+ 1 Timote 5:22 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 22 Kotyela moto mabɔkɔ+ nokinoki te;+ kosangana mpe na masumu ya bato te;+ zalá ntango nyonso pɛto.+ 2 Timote 1:6 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 6 Yango wana mpenza nazali kokundwela yo ete opelisa lokola mɔtɔ+ likabo+ ya Nzambe oyo ezali epai na yo na ndenge natyelaki yo mabɔkɔ.+
9 Mpe Yosua mwana ya Nunu atondaki na elimo ya bwanya,+ mpo Moize atyelaki ye lobɔkɔ;+ mpe bana ya Yisraele babandaki koyokela ye mpe bazalaki kosala kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.+
23 Lisusu, batyelaki bango bankulutu+ na lisangá moko na moko mpe, babondelaki mpe bakilaki bilei,+ bapesaki bango na mabɔkɔ ya Yehova+ oyo bango bandimelaki.
14 Komona mpamba te likabo+ oyo ezali epai na yo, oyo bapesaki yo na nzela ya esakweli+ mpe ntango lisangani ya bankulutu etyelaki yo mabɔkɔ.+
6 Yango wana mpenza nazali kokundwela yo ete opelisa lokola mɔtɔ+ likabo+ ya Nzambe oyo ezali epai na yo na ndenge natyelaki yo mabɔkɔ.+