Kobima 7:3 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 3 Nde ngai, nakotika motema ya Farao ekóma makasi,+ mpe nakokómisa bilembo na ngai mpe makamwisi na ngai mingi na mokili ya Ezipito.+ Kobima 8:5 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 5 Na nsima, Yehova alobaki na Moize ete: “Lobá na Arona: ‘Sembolá lobɔkɔ na yo ná lingenda na yo+ likoló ya bibale, ya banzela ya mai ya Nile mpe ya bitima oyo etondi na matiti mpe matisá mbemba na mokili ya Ezipito.’” Kobima 9:10 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 10 Bongo bazwaki putulu ya milinga oyo euti na mombonda mpe batɛlɛmaki liboso ya Farao, mpe Moize abwakaki yango na likoló, mpe yango ekómaki babibɔ oyo ezali kobimisa matutu+ na nzoto ya bato mpe ya banyama. Nzembo 105:27 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 27 Balakisaki bango bilembo na ye,+Mpe makamwisi na mokili ya Kame.+
3 Nde ngai, nakotika motema ya Farao ekóma makasi,+ mpe nakokómisa bilembo na ngai mpe makamwisi na ngai mingi na mokili ya Ezipito.+
5 Na nsima, Yehova alobaki na Moize ete: “Lobá na Arona: ‘Sembolá lobɔkɔ na yo ná lingenda na yo+ likoló ya bibale, ya banzela ya mai ya Nile mpe ya bitima oyo etondi na matiti mpe matisá mbemba na mokili ya Ezipito.’”
10 Bongo bazwaki putulu ya milinga oyo euti na mombonda mpe batɛlɛmaki liboso ya Farao, mpe Moize abwakaki yango na likoló, mpe yango ekómaki babibɔ oyo ezali kobimisa matutu+ na nzoto ya bato mpe ya banyama.