11 mpe ayei epai na biso mpe azwaki mokaba ya Paulo, amikangaki makolo ná mabɔkɔ mpe alobaki ete: “Elimo santu elobi boye: ‘Moto oyo azali nkolo mokaba oyo, Bayuda bakokanga+ ye boye na Yerusaleme mpe bakokaba+ ye na mabɔkɔ ya bato ya bikólo.’”
23 Bazali basaleli* ya Kristo? Nazali koyanola lokola moto ya ligboma, ngai naleki mpenza:+ na misala makasi mingi koleka,+ na babolɔkɔ mingi koleka,+ na kobɛtama koleka ndelo, na kokóma pene na liwa mbala na mbala.+
24 Nazali sikoyo kosepela na kati ya bampasi na ngai mpo na bino,+ mpe ngai, na ngala na ngai, nazali kokokisa oyo ezali kozanga na malɔzi+ ya Kristo na nzoto na ngai ya mosuni mpo na bolamu ya nzoto na ye, oyo ezali lisangá.+