9 Boni! Boyebi te ete bato bazangi boyengebene bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te?+ Bómikosa te. Ezala bato ya pite,+ basambeli ya bikeko,+ bato ya ekobo,+ mibali oyo bazwamá mpo na kosangisaka na bango nzoto na ndenge oyo ebongisamá te,+ mibali oyo balalaka na mibali,+
5 Mpo boyebi likambo oyo, bondimi yango bino moko, ete moto moko te ya pite+ to moto ya mbindo to moto ya lokoso+—oyo elakisi kozala mosambeli ya bikeko—azali na libula na bokonzi ya Kristo mpe ya Nzambe.+
5 Na yango, bóboma+ binama ya nzoto na bino+ ya mabele na likambo ya pite, mbindo, mposa ya kosangisa nzoto,+ mposa oyo eyokisaka mpasi, mpe bilulela,+ oyo ezali losambo ya bikeko.
3 Mpo ntango+ oyo esili koleka ekoki bongo oyo bino bosalaki mokano ya bikólo+ ntango botambolaki na misala ya etamboli ya nsɔni,+ na bamposa makasi, na kolekisa ndelo na vinyo,+ na bafɛti ya lokoso, na komɛla mingi, mpe na losambo mabe ya bikeko.+