31 “‘Bóbaluka te mpo na kokende epai ya bato oyo basololaka na bilimo,+ mpe bótuna te bato oyo basalaka mosala ya kosakola makambo ekoya,+ noki bákómisa bino mbindo. Ngai nazali Yehova Nzambe na bino.
6 “‘Bongo molimo oyo abaluki mpo na kokende epai ya bato oyo basololaka na bilimo+ mpe epai ya bato oyo basalaka mosala ya kosakola makambo ekoya+ mpo na kosala na bango pite, nakotɛmɛla mpenza molimo yango mpe nakolongola ye kati na bato na ye.+