15 Kasi nasalelaki ata moko ya bibongiseli wana te.+ Ya solo, soki nakomi makambo oyo ezali te mpo ezala bongo epai na ngai, mpo ekoleka kutu malamu nde nakufa na esika ete—moto moko te akokómisa mpamba ntina oyo nazali na yango ya komikumisa!+
9 Ya solo mpenza, bandeko, bobosani te mosala na biso ya makasi mpe mitoki na biso. Ezali na nzela ya mosala makasi+ butu moi, mpo na kotyela moto moko te na kati na bino kilo monene,+ nde tosakolaki nsango malamu epai na bino.