Misala 5:41 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 41 Na yango, bango balongwaki liboso ya Sanedrina, bazali kosepela+ mpo batángamaki bato oyo babongi kosambwisama mpo na nkombo na ye.+ Bafilipi 2:17 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 17 Nzokande, atako nazali komipesa lokola likabo ya masanga+ oyo bazali kosopela mbeka+ ya mosala mpo na bolamu ya bato nyonso oyo kondima etindi bino bósala,+ nazali na esengo mpe nazali kosepela+ elongo na bino nyonso. 1 Petro 3:14 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 14 Kasi ata soki bosengeli konyokwama mpo na boyengebene, bozali bato ya esengo.+ Nzokande, eloko oyo bango babangaka, bino bóbanga yango te,+ bóbulungana mpe te.+ 1 Petro 4:13 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 13 Kutu, bókoba nde kosepela+ mpo bozali komona mpasi oyo Kristo amonaki,+ mpo bósepela mpe bótonda na esengo mingi ntango nkembo na ye ekomonana.+
41 Na yango, bango balongwaki liboso ya Sanedrina, bazali kosepela+ mpo batángamaki bato oyo babongi kosambwisama mpo na nkombo na ye.+
17 Nzokande, atako nazali komipesa lokola likabo ya masanga+ oyo bazali kosopela mbeka+ ya mosala mpo na bolamu ya bato nyonso oyo kondima etindi bino bósala,+ nazali na esengo mpe nazali kosepela+ elongo na bino nyonso.
14 Kasi ata soki bosengeli konyokwama mpo na boyengebene, bozali bato ya esengo.+ Nzokande, eloko oyo bango babangaka, bino bóbanga yango te,+ bóbulungana mpe te.+
13 Kutu, bókoba nde kosepela+ mpo bozali komona mpasi oyo Kristo amonaki,+ mpo bósepela mpe bótonda na esengo mingi ntango nkembo na ye ekomonana.+