14 Bongo Liloba akómaki moto*+ mpe afandaki na kati na biso, mpe tomonaki nkembo na ye, nkembo lokola oyo ya mwana uta na tata, mwana se moko oyo abotamaki+; mpe atondaki na boboto monene mpe na solo.+
15 Mpo nganga-nzambe monene oyo tozali na ye, ezali te moto oyo akoki te koyokela biso mawa+ na bolɛmbu na biso, kasi ezali nde moto oyo amekamaki na makambo nyonso lokola biso, kasi azangi lisumu.+