15 Kasi Nkolo alobaki na ye ete: “Kende, mpo mobali wana azali mbɛki oyo naponi+ mpo na komema nkombo na ngai epai ya bikólo+ mpe epai ya bakonzi+ mpe epai ya bana ya Yisraele.
8 Epai na ngai, moto moke koleka moto oyo aleki moke+ na kati ya basantu nyonso, boboto monene+ wana emonisamaki, mpo nasakola na bikólo+ nsango malamu oyo etali bomɛngo ya Kristo oyo ekoki komekama te+