Matai 17:27 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 27 Kasi mpo tóbɛtisa bango libaku te,+ kende na mbu, bwaká ndɔbɔ, mpe kamatá mbisi ya liboso oyo ekomata mpe, ntango okofungola monɔkɔ na yango, okokuta mbongo ya ebende ya statere. Kamatá yango mpe pesá bango yango mpo na ngai ná yo.”+ Matai 18:6 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 6 Kasi moto nyonso oyo abɛtisi libaku moko ya bato mike oyo bandimelaka ngai, eleki malamu bákangisa ye na nkingo libanga oyo banikaka na yango mbuma,+ lokola oyo mpunda ebalolaka, mpe bázindisa ye na katikati mpenza ya mbu.+ 1 Bakorinti 8:9 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 9 Kasi bókebaka ete ezala ata ndenge nini lotomo na bino eya te kokóma libaku ya kokweisa baoyo bazali na bolɛmbu.+ 1 Bakorinti 10:32 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 32 Bókeba ete bókóma te bato oyo bazali kobɛtisa Bayuda ná Bagrɛki mpe lisangá ya Nzambe libaku,+
27 Kasi mpo tóbɛtisa bango libaku te,+ kende na mbu, bwaká ndɔbɔ, mpe kamatá mbisi ya liboso oyo ekomata mpe, ntango okofungola monɔkɔ na yango, okokuta mbongo ya ebende ya statere. Kamatá yango mpe pesá bango yango mpo na ngai ná yo.”+
6 Kasi moto nyonso oyo abɛtisi libaku moko ya bato mike oyo bandimelaka ngai, eleki malamu bákangisa ye na nkingo libanga oyo banikaka na yango mbuma,+ lokola oyo mpunda ebalolaka, mpe bázindisa ye na katikati mpenza ya mbu.+
9 Kasi bókebaka ete ezala ata ndenge nini lotomo na bino eya te kokóma libaku ya kokweisa baoyo bazali na bolɛmbu.+