18 Mpo bato ya ndenge wana bazali baombo ya Nkolo na biso Kristo te, kasi ya mabumu na bango moko;+ mpe bazali kobenda mitema ya bato oyo bakosamaka mpambampamba na maloba sukali+ mpe na maloba ya kokumisakumisa.+
17 Ezali biso; mpo tozali te bato oyo batɛkaka liloba ya Nzambe+ ndenge bato mingi bazali,+ kasi biso tozali koloba nde na bosembo, ɛɛ, lokola bato batindami na Nzambe, na miso ya Nzambe, esika moko na Kristo.+
2Nzokande, ezalaki mpe na basakoli ya lokuta na kati ya bato, ndenge moko mpe ekozala na bateyi ya lokuta na kati na bino.+ Bato wana bakokɔtisa na mayele mwa mangomba oyo ezali kobebisa mpe bakowangana ata nkolo oyo asombaki bango,+ bakomiyeisela libebi nokinoki.