Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 18:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 “‘Bolumbu ya mwasi ná ya mwana na ye ya mwasi, osengeli komona yango te.+ Mwana mwasi ya mwana na ye ya mobali to mwana mwasi ya mwana na ye ya mwasi, osengeli kozwa ye te mpo na komona bolumbu na ye. Bazali bandeko ya makila moko. Yango ezali etamboli ya nsɔni.+

  • Marko 7:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 misala ya ekobo, kolula biloko ya bato,+ misala ya motema mabe, kokosa, etamboli ya nsɔni,+ liso ya likunya, kofinga, lofundo, bozoba.

  • Baefese 4:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Lokola babungisá bizaleli nyonso ya malamu,+ bamipesá na etamboli ya nsɔni+ mpo na kosala mbindo+ ya ndenge nyonso na lokoso.+

  • 2 Petro 2:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Lisusu, mingi bakolanda+ misala na bango ya etamboli ya nsɔni,+ mpe mpo na bango nzela ya solo ekofingama.+

  • Yuda 4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Ntina nasali bongo ezali mpo bato mosusu bamikɔtisi na kati na bino na mayele,+ baoyo Makomami emonisá+ uta kalakala ete bakozwa lisambisi oyo,+ bato oyo batyolaka Nzambe,+ oyo bazali kozwa boboto monene ya Nzambe na biso libaku ya kozala na etamboli ya nsɔni+ mpe bazali kowangana+ Nkolo+ na biso kaka moko mpe Mokonzi,+ Yesu Kristo.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto