Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 8:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Na nsima, Moize alobaki na Arona mpe na bana na ye ya mibali ete: “Bólamba+ mosuni na monɔkɔ ya hema ya kokutana, mpe ezali kuna nde bokolya yango+ ná limpa oyo ezali na kati ya kitunga ya kotyama na mosala, kaka ndenge nazwaki mitindo: ‘Arona ná bana na ye ya mibali bakolya yango.’

  • Luka 10:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Bongo bófanda na ndako wana,+ bólya mpe bómɛla biloko oyo bakopesa bino,+ mpo mosali asengeli kozwa lifuti na ye.+ Bólongwa na ndako moko mpo na kokende na ndako mosusu te.*+

  • Baroma 15:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Ya solo, basepeli kosala bongo, kasi bazalaki na nyongo ya basantu oyo bazali na Yerusaleme; mpo soki bikólo bazwi mpe biloko ya elimo ya baoyo wana,+ bikólo yango bazali mpe na nyongo ya kosalela bango nyonso na biloko oyo nzoto esengeli na yango.+

  • 1 Bakorinti 9:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Soki toloni biloko ya elimo+ epai na bino, ezali nde likambo monene soki tobuki biloko ya mosuni epai na bino?+

  • Baebre 13:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Lisusu, bóbosana te kosala malamu+ mpe kokabela bamosusu biloko, mpo Nzambe asepelaka mpenza na bambeka ya ndenge wana.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto