13 Nzokande, biso tosengeli kopesa Nzambe matɔndi ntango nyonso mpo na bino, bandeko oyo Yehova alingi, mpamba te Nzambe aponaki bino+ banda na ebandeli mpo na lobiko na ndenge asantisaki+ bino na elimo+ mpe na nzela ya kondima na bino na kati ya solo.+
2 na kolanda boyebi oyo Nzambe Tata azali na yango ya koyeba makambo liboso,+ baoyo basantisami na elimo,+ mpo bázala bato ya botosi mpe oyo bamwangisami+ makila ya Yesu Kristo:+