4 Bótikala na bomoko elongo na ngai, mpe ngai na bomoko elongo na bino.+ Lokola etape ekoki kobota mbuma yango moko te kozanga kokangama na nzete ya vinyo, bino mpe ndenge moko bokoki kobota mbuma te, soki botikali na bomoko elongo na ngai te.+
5 Ngai nazali nzete ya vinyo, bino bozali bitape. Moto oyo atikali na bomoko elongo na ngai, mpe ngai na bomoko elongo na ye, moto wana akobota mbuma mingi;+ mpo, soki botiki ngai, bokoki kosala eloko moko te.