-
Yobo 2:3Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
3 Mpe Yehova alobaki lisusu na Satana: “Otyaki likebi na mosaleli na ngai Yobo?+ Ete na mabele moto moko lokola ye azali te, oyo azangi mbeba mpe azali sembo,+ abangaka Nzambe+ mpe akimaka mabe?+ Kutu azali kaka kokangama makasi na bosembo na ye,+ atako ozali kotinda+ ngai nasala ye mabe kaka mpamba.”+
-