58 Na yango, bandeko na ngai ya bolingo, bópikama makasi,+ bóninganaka te, bózala ntango nyonso na mingi ya kosala na mosala ya Nkolo,+ mpo boyebi ete mosala na bino ya makasi ezali mpamba te+ na kati ya Nkolo.
16 bókangama makasi na liloba ya bomoi,+ mpo nazwa likambo ya komikumisa na mokolo ya Kristo,+ ete napotaki mbangu mpamba te mpe nasalaki mosala makasi mpamba te.+