Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Matai 13:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Ntango bato balalaki mpɔngi, monguna na ye ayaki kolona matiti mabe na katikati ya blé, mpe akendaki.

  • 1 Timote 4:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Nzokande, elimo ya Nzambe elobi polele ete na bileko oyo ekoya+ bato mosusu bakotika+ kondima, bakotya likebi na maloba ya bokosi ya bilimo mabe+ mpe na mateya ya bademo,+

  • 2 Timote 2:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Bato wana batiki solo,+ bazali koloba ete lisekwa esalemá;+ mpe bazali kotya kondima ya bato mosusu na mobulu.+

  • 2 Timote 4:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpo ekozala na eleko moko oyo bakondima te mateya oyo epesaka litomba,+ kasi, na kolanda bamposa na bango moko, bakozwa bateyi ebele mpo báyokisaka bango makambo oyo matoi na bango elingi koyoka;+

  • 2 Petro 2:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Nzokande, ezalaki mpe na basakoli ya lokuta na kati ya bato, ndenge moko mpe ekozala na bateyi ya lokuta na kati na bino.+ Bato wana bakokɔtisa na mayele mwa mangomba oyo ezali kobebisa mpe bakowangana ata nkolo oyo asombaki bango,+ bakomiyeisela libebi nokinoki.

  • 1 Yoane 2:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Bana mike, oyo ezali ngonga ya nsuka,+ mpe, kaka ndenge boyokaki ete motɛmɛli ya Kristo azali koya,+ banda sikoyo ebele ya batɛmɛli ya Kristo bayei;+ na likambo wana nde toyebi ete oyo ezali ngonga ya nsuka.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto