6 Mpo yo ozali ekólo moko mosantu na miso ya Yehova Nzambe na yo.+ Yo nde Yehova Nzambe na yo aponi mpo okóma ekólo na ye, eloko na ye moko, kati na bato ya bikólo nyonso oyo ezali na mabele.+
9 Kasi bino bozali “libota oyo eponami, bonganga-nzambe ya bokonzi, ekólo moko mosantu,+ bato oyo basengeli kozala eloko ya Nzambe mpenza,+ mpo bósakola bizaleli malamu”+ ya moto oyo abengaki bino bólongwa na molili bókɔta na pole na ye ya kokamwa.+