6Bandeko, ata soki moto abɛti libaku+ liboso ayeba yango, bino baoyo bozali na makoki ya elimo+ bómeka kosembola moto yango na elimo ya boboto,+ na ntango yango yo moko mpe omitalaka,+ noki yo mpe omekama.+
11 Nzokande, yo, Ee moto ya Nzambe, kimá makambo wana.+ Kasi landá boyengebene, ezaleli ya kokangama na Nzambe, kondima, bolingo, koyika mpiko, elimo ya boboto.+
15 Kasi bósantisa Kristo na mitema na bino mpo azali Nkolo,+ bómibongisa ntango nyonso mpo na koloba+ liboso ya moto nyonso oyo atuni bino ntina ya elikya oyo bozali na yango, kasi bósalaka bongo na boboto+ mpe na limemya makasi.