16 Nzokande ntango Paulo azalaki kozela bango na Atene, elimo na ye eyokaki nkanda+ na kati na ye na ndenge amonaki ete engumba yango etondi na bikeko.
9 Mpo Nzambe, oyo nazali kosalela mosala mosantu na elimo na ngai mpo na nsango malamu ya Mwana na ye, ayebi+ ndenge natángaka bino ntango nyonso na mabondeli na ngai,+
5 Mpo atako na mosuni nazali te, na elimo nazali elongo na bino,+ nazali kosepela mpe nazali komona ndenge makambo ezali na molɔngɔ+ na kati na bino mpe bokasi ya kondima+ na bino epai ya Kristo.