-
2 Ntango 26:18Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
18 Na nsima, batɛlɛmaki mpo na kotɛmɛla mokonzi Uzia+ mpe balobaki na ye boye: “Ee Uzia, mosala ya kotumbela Yehova mpaka ya malasi ezali ya yo te,+ kasi mosala ya kotumba mpaka ya malasi ezali nde mosala ya banganga-nzambe bana ya Arona,+ oyo basantisamá. Bimá na esika mosantu; mpo ozangi bosembo, mpe Yehova Nzambe akopesa yo ata nkembo moko te+ mpo na yango.”
-