6 Bongo alobaki boye: “Ezali mpenza likambo ya mpamba te ndenge okómi mosaleli na ngai mpo otɛlɛmisa mabota ya Yakobo mpe mpo ozongisa ata bato ya Yisraele oyo babatelami;+ mpe napesi yo mpo ozala pole ya bikólo,+ mpo lobiko na ngai ekóma tii na nsuka ya mabele.”+
11 Mpo na mpasi ya molimo na ye, akomona bolamu,+ akotonda.+ Na nzela ya boyebi na ye, moyengebene, mosaleli na ngai,+ akomemela bato mingi ezaleli ya boyengebene;+ mpe ye moko akomema mabunga na bango.+