34 Mpo ntolo ya likabo ya koningisa+ mpe lokolo ya eteni oyo esantisami, nazwi mpenza yango epai ya bana ya Yisraele na bambeka na bango ya boyokani, mpe nakopesa yango nganga-nzambe Arona ná bana na ye ya mibali, ekouta na bana ya Yisraele, lokola lilako mpo na ntango oyo etyami ndelo te.