12 “Mpe asengeli kozwa eloko ya kotya mɔtɔ+ oyo etondi na makala ya mɔtɔ oyo euti na etumbelo+ oyo ezali liboso ya Yehova, mpe mabɔkɔ+ na ye mibale etondi na putulu ya mpaka ya malasi+ ya nsolo kitoko, mpe asengeli koya na yango na nsima ya rido.+
3 Mpe anzelu mosusu ayaki mpe atɛlɛmaki na etumbelo,+ azalaki na esaleli ya wolo ya mpaka ya malasi; mpe bapesaki ye ebele ya mpaka ya malasi+ mpo na kopesa yango likabo esika moko na mabondeli ya basantu nyonso likoló ya etumbelo ya wolo oyo ezalaki liboso ya kiti ya bokonzi.