Nzembo 73:2 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 2 Kasi makolo na ngai ezalaki pene na kolongwa na nzela,+Matambe na ngai etikalaki moke esɛlimwa.+ Baebre 3:12 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 12 Bandeko, bókeba noki moko na bino akóma na motema mabe oyo ezangi kondima mpo atiki Nzambe ya bomoi;+ 2 Petro 3:17 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 17 Yango wana, bino bandeko ya bolingo, lokola boyebi yango liboso,+ bókeba mpo bómemama te elongo na bango na libunga ya bato oyo babukaka mibeko mpe bótika te ezaleli na bino ya kopikama makasi mpo bókwea te.+ Emoniseli 2:4 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 4 Atako bongo, nazwi yo mabe na likambo oyo: otiki bolingo oyo ozalaki na yango liboso.+
12 Bandeko, bókeba noki moko na bino akóma na motema mabe oyo ezangi kondima mpo atiki Nzambe ya bomoi;+
17 Yango wana, bino bandeko ya bolingo, lokola boyebi yango liboso,+ bókeba mpo bómemama te elongo na bango na libunga ya bato oyo babukaka mibeko mpe bótika te ezaleli na bino ya kopikama makasi mpo bókwea te.+