Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Bagalatia 3:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Bongo Mibeko ezali nde kotɛmɛla bilaka ya Nzambe?+ Te, ata moke te! Mpo soki bápesaka mobeko moko boye oyo ekoki kopesa bomoi,+ mbɛlɛ moto atángami moyengebene mpenza mpo na mibeko.+

  • Baebre 7:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Yango wana, soki ezaleli ya kokoka+ eyaka mpenza na lisalisi ya bonganga-nzambe ya Balevi,+ (mpo bonganga-nzambe wana eyaki nzela moko na Mibeko+ oyo bapesaki bato mpe ezalaki likambo ya ntina mpenza,) mbɛlɛ ntina ezalaki lisusu+ ete nganga-nzambe mosusu abima lokola Melekisedeke+ mpe báloba ete azali lokola Arona?

  • Baebre 7:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Mpo Mibeko ekómisaki ata eloko moko te eloko ya kokoka,+ kasi koya ya elikya+ moko oyo eleki malamu esalaki yango, oyo na nzela na yango tozali kopusana penepene na Nzambe.+

  • Baebre 8:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Kasi sikoyo Yesu azwi mosala moko ya malamu koleka mpo na bolamu ya bato nyonso, yango wana azali mpe moyokanisi+ ya kondimana moko ya malamu koleka,+ oyo etyami na kolanda mibeko mpe esimbami na bilaka ya malamu koleka.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto